Skip to content
Text size 100%
Translation comparison

Compare Adh-Dhariyat Quran translations

Compare up to three verified translation editions verse by verse, including editions in two different languages.

Lingala editions (choose up to 3)

Changing languages or editions keeps the current surah and verse.

بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ وَٱلذَّٰرِيَٰتِ ذَرْوًۭا ﴿1﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

(Nalapi) na mipepe miye mipanzaka.

فَٱلْحَٰمِلَٰتِ وِقْرًۭا ﴿2﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe na bamemi mikumba (ya mapata)

فَٱلْجَٰرِيَٰتِ يُسْرًۭا ﴿3﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe na ba masuwa ezali kotambola likolo ya mayi.

فَٱلْمُقَسِّمَٰتِ أَمْرًا ﴿4﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe na bakaboli, kolanda na mibeko.

إِنَّمَا تُوعَدُونَ لَصَادِقٌۭ ﴿5﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Ezali solo oyo balaki bino.

وَإِنَّ ٱلدِّينَ لَوَٰقِعٌۭ ﴿6﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe ya sôló, mokolo ya suka ekoya.

وَٱلسَّمَآءِ ذَاتِ ٱلْحُبُكِ ﴿7﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe na likolo oyo ezali na banzela bipasolama malamu.

إِنَّكُمْ لَفِى قَوْلٍۢ مُّخْتَلِفٍۢ ﴿8﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Ya sólo, bozali na bokeseni na maye bozali koloba.

يُؤْفَكُ عَنْهُ مَنْ أُفِكَ ﴿9﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Oyo aboyi yango, ezali oyo apesaki bondimi mokongo.

قُتِلَ ٱلْخَرَّٰصُونَ ﴿10﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Bato ya lokuta basili kobomama.

ٱلَّذِينَ هُمْ فِى غَمْرَةٍۢ سَاهُونَ ﴿11﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

В aye bazindi na molangwa ya mokili.

يَسْـَٔلُونَ أَيَّانَ يَوْمُ ٱلدِّينِ ﴿12﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Bazali kotuna тропа mokolo ya suka ekozala tango nini?

يَوْمَ هُمْ عَلَى ٱلنَّارِ يُفْتَنُونَ ﴿13﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mokolo oyo bakomekama na moto.

ذُوقُوا۟ فِتْنَتَكُمْ هَٰذَا ٱلَّذِى كُنتُم بِهِۦ تَسْتَعْجِلُونَ ﴿14﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Вотека bomekami ya bino (etumbu) mpo bozalaki koluka yango na lombango.

إِنَّ ٱلْمُتَّقِينَ فِى جَنَّٰتٍۢ وَعُيُونٍ ﴿15﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Ya soló, babangi bakozalaka na lola oyo ezali na miluka.

ءَاخِذِينَ مَآ ءَاتَىٰهُمْ رَبُّهُمْ ۚ إِنَّهُمْ كَانُوا۟ قَبْلَ ذَٰلِكَ مُحْسِنِينَ ﴿16﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Bakozuaka oyo Nkolo wa bango akopesa bango. Ya sólo, bazalaki liboso na yango bato ya malamu.

كَانُوا۟ قَلِيلًۭا مِّنَ ٱلَّيْلِ مَا يَهْجَعُونَ ﴿17﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Bazalaki kolala токе na butu.

وَبِٱلْأَسْحَارِ هُمْ يَسْتَغْفِرُونَ ﴿18﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Мре yambo tongo etana bazalaki kosenga bolimbisi.

وَفِىٓ أَمْوَٰلِهِمْ حَقٌّۭ لِّلسَّآئِلِ وَٱلْمَحْرُومِ ﴿19﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe na bomengo na bango oyo bazalaki kopesa epai na mosengi mpe mozangi.

وَفِى ٱلْأَرْضِ ءَايَٰتٌۭ لِّلْمُوقِنِينَ ﴿20﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe bilembo biye bizali okati na mokili bizali тропа baye bazali kondima na bosóló.

وَفِىٓ أَنفُسِكُمْ ۚ أَفَلَا تُبْصِرُونَ ﴿21﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe kati na bino moko, boye bozali kornona te?

وَفِى ٱلسَّمَآءِ رِزْقُكُمْ وَمَا تُوعَدُونَ ﴿22﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe bozui na bino, na maye bolakelama mazali olikolo.

فَوَرَبِّ ٱلسَّمَآءِ وَٱلْأَرْضِ إِنَّهُۥ لَحَقٌّۭ مِّثْلَ مَآ أَنَّكُمْ تَنطِقُونَ ﴿23﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Na Nkolo ya likolo na nsé, ezali ya sólo bosembo, ndakisa ya maye bozali kolobela.

هَلْ أَتَىٰكَ حَدِيثُ ضَيْفِ إِبْرَٰهِيمَ ٱلْمُكْرَمِينَ ﴿24﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Boye sango ya bapaya ya Ibrâhîm ya lokumu ekomelaki yo?

إِذْ دَخَلُوا۟ عَلَيْهِ فَقَالُوا۟ سَلَٰمًۭا ۖ قَالَ سَلَٰمٌۭ قَوْمٌۭ مُّنكَرُونَ ﴿25﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Tango bakotaki epai naye, balobi: Kimia (ezala nayo); ayanoli: Kimia mpe ezala likolo lia bapaya oyo bayebani te.

فَرَاغَ إِلَىٰٓ أَهْلِهِۦ فَجَآءَ بِعِجْلٍۢ سَمِينٍۢ ﴿26﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Мре akendaki malembe epai ya libota naye mpe amemelaki bango ngombe ya mafrita ya kotumba.

فَقَرَّبَهُۥٓ إِلَيْهِمْ قَالَ أَلَا تَأْكُلُونَ ﴿27﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe apusi yango pene na bango alobi: Bokolia te?

فَأَوْجَسَ مِنْهُمْ خِيفَةًۭ ۖ قَالُوا۟ لَا تَخَفْ ۖ وَبَشَّرُوهُ بِغُلَٰمٍ عَلِيمٍۢ ﴿28﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe abangi bango, balobi: Kobanga te, mpe bapesi ye sango ya kobotama ya mwana ya mobali oyo atondi na bwanya.

فَأَقْبَلَتِ ٱمْرَأَتُهُۥ فِى صَرَّةٍۢ فَصَكَّتْ وَجْهَهَا وَقَالَتْ عَجُوزٌ عَقِيمٌۭ ﴿29﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mwasi naye akei azali koganga mpe na komikwanza elongi naye, alobi: Mobange mpe ekomba lokola ngai, nabota ndenge nini?

قَالُوا۟ كَذَٰلِكِ قَالَ رَبُّكِ ۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلْحَكِيمُ ٱلْعَلِيمُ ﴿30﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Balobi: Lolenge wana nde Nkolo nayo alobi. Ya soló, ye azali moyebi atonda na bwanya.

۞ قَالَ فَمَا خَطْبُكُمْ أَيُّهَا ٱلْمُرْسَلُونَ ﴿31﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

(Ibrâhîm) alobi: Oh batindami! Boyeli nini?

قَالُوٓا۟ إِنَّآ أُرْسِلْنَآ إِلَىٰ قَوْمٍۢ مُّجْرِمِينَ ﴿32﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Balobi: Ya sólo, totindami тропа batomboki.

لِنُرْسِلَ عَلَيْهِمْ حِجَارَةًۭ مِّن طِينٍۢ ﴿33﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpo tobwakela bango mabanga ya mabele ya makasi.

مُّسَوَّمَةً عِندَ رَبِّكَ لِلْمُسْرِفِينَ ﴿34﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Oyo etiyami kowuta epai ya Nkolo nayo ezali тропа etumbu.

فَأَخْرَجْنَا مَن كَانَ فِيهَا مِنَ ٱلْمُؤْمِنِينَ ﴿35﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Мре tobimisaki bandimi okati na bango.

فَمَا وَجَدْنَا فِيهَا غَيْرَ بَيْتٍۢ مِّنَ ٱلْمُسْلِمِينَ ﴿36﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Мре tokutaki sé ndako moko ya mpamba ya baye bamisokia.

وَتَرَكْنَا فِيهَآ ءَايَةًۭ لِّلَّذِينَ يَخَافُونَ ٱلْعَذَابَ ٱلْأَلِيمَ ﴿37﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe totikaki elembo тропа baye bazali kobanga etumbu makasi.

وَفِى مُوسَىٰٓ إِذْ أَرْسَلْنَٰهُ إِلَىٰ فِرْعَوْنَ بِسُلْطَٰنٍۢ مُّبِينٍۢ ﴿38﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

(Lolenge moko totikaki elembo) epai ya Mûssa, tango totindaki ye epai ya falo na makamwisi ya polele.

فَتَوَلَّىٰ بِرُكْنِهِۦ وَقَالَ سَٰحِرٌ أَوْ مَجْنُونٌۭ ﴿39﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Kasi apesaki mokongo mpe alikiaki sé na makasi naye, mpe alobaki ete: Oyo azali nganga to azali ligboma.

فَأَخَذْنَٰهُ وَجُنُودَهُۥ فَنَبَذْنَٰهُمْ فِى ٱلْيَمِّ وَهُوَ مُلِيمٌۭ ﴿40﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Kasi tozuaki ye na mapinga naye, mpe tobwakaki bango okati ya mbonge тропа ezaleli naye ya mabe.

وَفِى عَادٍ إِذْ أَرْسَلْنَا عَلَيْهِمُ ٱلرِّيحَ ٱلْعَقِيمَ ﴿41﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Lolenge moko na (bato) ya Aad, tango totindelaki bango mopepe ya mabe (etumbu)

مَا تَذَرُ مِن شَىْءٍ أَتَتْ عَلَيْهِ إِلَّا جَعَلَتْهُ كَٱلرَّمِيمِ ﴿42﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Ezalaki kotika eloko moko te oyo ezuaki yango na nzela kino ekomisaki yango putulu.

وَفِى ثَمُودَ إِذْ قِيلَ لَهُمْ تَمَتَّعُوا۟ حَتَّىٰ حِينٍۢ ﴿43﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Lolenge moko na (bato) ya thamûd tango bayebisaki bango: Bosepela sé тропа tango ya moke.

فَعَتَوْا۟ عَنْ أَمْرِ رَبِّهِمْ فَأَخَذَتْهُمُ ٱلصَّٰعِقَةُ وَهُمْ يَنظُرُونَ ﴿44﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Bazangaki kotosa mibeko mia Nkolo wa bango kino etumbu ezuaki bango bazali kornona.

فَمَا ٱسْتَطَٰعُوا۟ مِن قِيَامٍۢ وَمَا كَانُوا۟ مُنتَصِرِينَ ﴿45﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Kaši bakokaki komitelemisa te, mpe bamilongisaki te.

وَقَوْمَ نُوحٍۢ مِّن قَبْلُ ۖ إِنَّهُمْ كَانُوا۟ قَوْمًۭا فَٰسِقِينَ ﴿46﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe lolenge moko ezalelaki bato ya Nûh liboso. Ya soló, bazalaki bato mabe.

وَٱلسَّمَآءَ بَنَيْنَٰهَا بِأَيْي۟دٍۢ وَإِنَّا لَمُوسِعُونَ ﴿47﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe totongaki likolo na bokasi na biso, mpe (totiyaki yango ezala) monene.

وَٱلْأَرْضَ فَرَشْنَٰهَا فَنِعْمَ ٱلْمَٰهِدُونَ ﴿48﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe totandaki mabele, mpe oyo lolenge kitoko ya etando,

وَمِن كُلِّ شَىْءٍ خَلَقْنَا زَوْجَيْنِ لَعَلَّكُمْ تَذَكَّرُونَ ﴿49﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mpe tokelaki biloko nyoso mibale mibale, mpo bokoka kokanisa.

فَفِرُّوٓا۟ إِلَى ٱللَّهِ ۖ إِنِّى لَكُم مِّنْهُ نَذِيرٌۭ مُّبِينٌۭ ﴿50﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Bokima epai ya Allah, nazali sólo mokebisi ya polele тропа ye.

وَلَا تَجْعَلُوا۟ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ ۖ إِنِّى لَكُم مِّنْهُ نَذِيرٌۭ مُّبِينٌۭ ﴿51﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Kasi botiela Allah nzambe mosusu te. Ya soló nazali mokebisi ya polele тропа bino kowuta naye.

كَذَٰلِكَ مَآ أَتَى ٱلَّذِينَ مِن قَبْلِهِم مِّن رَّسُولٍ إِلَّا قَالُوا۟ سَاحِرٌ أَوْ مَجْنُونٌ ﴿52﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Ezali boye. Mpe motindami moko te ayaka epayi na bato ya yambo sé baloba oyo azali nganga to azali moto ya ligboma.

أَتَوَاصَوْا۟ بِهِۦ ۚ بَلْ هُمْ قَوْمٌۭ طَاغُونَ ﴿53﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Boye bazuaki lotomo yango te? Nzoka nde bazalaki nde balekisi ndelo.

فَتَوَلَّ عَنْهُمْ فَمَآ أَنتَ بِمَلُومٍۢ ﴿54﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mitiya mosika na bango, bakogangela yo te, (тропа bango)

وَذَكِّرْ فَإِنَّ ٱلذِّكْرَىٰ تَنفَعُ ٱلْمُؤْمِنِينَ ﴿55﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Мре kundola, ya sôló bokundoli esalisaka bandimi.

وَمَا خَلَقْتُ ٱلْجِنَّ وَٱلْإِنسَ إِلَّا لِيَعْبُدُونِ ﴿56﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Мре nakelaki bilima na bato te sé тропа kobondela ngai.

مَآ أُرِيدُ مِنْهُم مِّن رِّزْقٍۢ وَمَآ أُرِيدُ أَن يُطْعِمُونِ ﴿57﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Nalukaka bozui epai na bango te, mpe nalukaka baleisa ngai te.

إِنَّ ٱللَّهَ هُوَ ٱلرَّزَّاقُ ذُو ٱلْقُوَّةِ ٱلْمَتِينُ ﴿58﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Ya sólo, Allah nde mopesi monene ya bozui, Nkolo bokasi koleka.

فَإِنَّ لِلَّذِينَ ظَلَمُوا۟ ذَنُوبًۭا مِّثْلَ ذَنُوبِ أَصْحَٰبِهِمْ فَلَا يَسْتَعْجِلُونِ ﴿59﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Kasi ya sólo, baye babubaki bakozua etumbu kokokana na biteni ya baninga baye babubaki, na yango, bawelisa yango te.

فَوَيْلٌۭ لِّلَّذِينَ كَفَرُوا۟ مِن يَوْمِهِمُ ٱلَّذِى يُوعَدُونَ ﴿60﴾

Lingala Translation - Mohammed Balangogo

Mabe ekozala epai ya bapengwi o mokolo oyo balakaki bango.[1]

Quran recitationReady
Open audio