بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ إِذَا ٱلسَّمَآءُ ٱنفَطَرَتْ
Ntango likolo ekokabwana,
The Cleaving · 19 verses · Lingala Translation - Mohammed Balangogo.
This page pairs the Arabic Quran with the attributed Lingala translation of its meanings. Compare the wording with another published edition, or jump directly to an ayah.
Use the verse-number field below to open any other verse.
Search the locally cached translation.
بِسْمِ ٱللَّهِ ٱلرَّحْمَٰنِ ٱلرَّحِيمِ إِذَا ٱلسَّمَآءُ ٱنفَطَرَتْ
Ntango likolo ekokabwana,
وَإِذَا ٱلْكَوَاكِبُ ٱنتَثَرَتْ
Mpe ntango minzoto mikolimwa,
وَإِذَا ٱلْبِحَارُ فُجِّرَتْ
Mpe ntango bibale bikosangisama.
وَإِذَا ٱلْقُبُورُ بُعْثِرَتْ
Mpe ntango malita makobalusama mpe makobimisa bawa,
عَلِمَتْ نَفْسٌۭ مَّا قَدَّمَتْ وَأَخَّرَتْ
Molimo mokoyeba maye awelisaki mpe maye azelisaki.
يَٰٓأَيُّهَا ٱلْإِنسَٰنُ مَا غَرَّكَ بِرَبِّكَ ٱلْكَرِيمِ
Oh yo moto! Nini ekosi yo тропа Nkolo nayo ya bolingo?
ٱلَّذِى خَلَقَكَ فَسَوَّىٰكَ فَعَدَلَكَ
Oyo akeli yo mpe abongisi lolenge nayo,
فِىٓ أَىِّ صُورَةٍۢ مَّا شَآءَ رَكَّبَكَ
Mpe asali yo na lolenge naye alingaki.
كَلَّا بَلْ تُكَذِّبُونَ بِٱلدِّينِ
Kaši bozali na ntembe тропа mokolo ya suka.
وَإِنَّ عَلَيْكُمْ لَحَٰفِظِينَ
Mpe ya sôló, bozali na bakengeli,
كِرَامًۭا كَٰتِبِينَ
Bankomi ya sôló,
يَعْلَمُونَ مَا تَفْعَلُونَ
Bayebi maye manso bozali kosala.
إِنَّ ٱلْأَبْرَارَ لَفِى نَعِيمٍۢ
Ya soló, bato ya malamu bakozala o’kati ya bisengo,
وَإِنَّ ٱلْفُجَّارَ لَفِى جَحِيمٍۢ
Mpe ya soló bato ya mabe bakozala okati ya lifelo.
يَصْلَوْنَهَا يَوْمَ ٱلدِّينِ
Bakozikisama na yango mokolo ya mbano.
وَمَا هُمْ عَنْهَا بِغَآئِبِينَ
Mpe bakozangisama te na etumbu ena.
وَمَآ أَدْرَىٰكَ مَا يَوْمُ ٱلدِّينِ
Kasi nani akoyebisa yo nini yango mokolo ya mbano?
ثُمَّ مَآ أَدْرَىٰكَ مَا يَوْمُ ٱلدِّينِ
Sima lisusu nani akoyebisa yo nini yango mokolo ya mbano?
يَوْمَ لَا تَمْلِكُ نَفْسٌۭ لِّنَفْسٍۢ شَيْـًۭٔا ۖ وَٱلْأَمْرُ يَوْمَئِذٍۢ لِّلَّهِ
Mokolo moye molimo ekosalisa molimo mosusu na eloko te mpe mokolo mona mobeko mokozala sé ya Allah.
Explore the same chapter in an existing published translation of another language. Each edition has its own source and wording.